‏ John 4:43-54

Yesu abikisi mwana ya kalaka

(Mat 8.5-13; Lk 7.1-10)

43Sima na mikolo mibale, Yesu alongwaki wana mpe akendeki na Galile. 44Solo, Ye moko Yesu alobaki ete mosakoli azwaka lokumu te kati na ekolo na ye. 45Tango akomaki na Galile, bato ya Galile bayambaki Ye, pamba te bango mpe bakendeki na Yelusalemi, na tango ya feti, mpe bamonaki makambo nyonso oyo asalaki kuna.

46Yesu ayaki lisusu na Kana ya Galile, epai wapi abongolaki mayi vino. Nzokande, na Kapernawumi, ezalaki na mokonzi moko ya basoda oyo mwana na ye ya mobali azalaki kobela. 47Tango ayokaki ete Yesu akomi na Galile longwa na Yuda, akendeki kokutana na Ye mpe asengaki na Ye ete akende kobikisa mwana na ye ya mobali oyo akomi pene ya kokufa.

48Yesu alobaki na ye : — Boni, bokondima kaka soki bomoni bilembo mpe bikamwa ?

49Mokonzi wana ya basoda alobaki : — Nkolo na ngai, yaka noki liboso ete mwana na ngai ya mobali akufa.

50Yesu alobaki na ye : — Kende, mwana na yo ya mobali azali na bomoi.

Moto yango andimaki maloba oyo Yesu alobaki mpe azongaki.

51Wana azalaki kozonga, basali na ye bayaki kokutana na ye mpe bayebisaki ye : — Mwana na yo ya mobali abiki na bokono na ye.

52Atunaki bango soki ezalaki na ngonga nini mwana abikaki.

Bazongisaki : — Fievele etikaki ye lobi oyo eleki, na ngonga ya liboso sima na midi.

53Tata asosolaki ete ezalaki kaka na ngonga oyo Yesu alobaki na ye : « Mwana na yo ya mobali azali na bomoi. » Bongo ye elongo na bato nyonso ya ndako na ye bandimaki.

54Oyo nde ezalaki likamwisi ya mibale oyo Yesu asalaki sima na Ye kozonga na Galile longwa na Yuda.
Copyright information for LinMNB