‏ John 6:16-21

Yesu atamboli na mayi

(Mat 14.22-27; Mlk 6.45-52)

16Tango pokwa ekomaki, bayekoli na Ye bakitaki na ebale 17epai wapi bamataki na bwato moko, bakatisaki ebale mpo na kokende na Kapernawumi, na ngambo mosusu ya ebale. Butu ekotaki, wana Yesu amikomelaki nanu te epai bango bakomaki. 18Ekumbaki moko ebandaki kopepa, mpe mayi ya ebale etombokaki. 19Awa basilaki koluka nkayi na molayi ya bakilometele pene mitano to motoba, bamonaki Yesu kotambola likolo ya mayi ya ebale mpe kopusana pene ya bwato ; somo makasi ekangaki bango. 20Kasi Yesu alobaki na bango : « Kimia ! Kimia ! Bobanga te ! Ezali Ngai ! »

21Balingaki kokotisa Yesu na bwato, kasi, mbala moko, bwato etutaki mabele ya esika oyo bazalaki kokende.
Copyright information for LinMNB