‏ John 6:66-71

66Banda na tango wana, bayekoli na Ye mingi bazongaki mpe batikaki kolanda Ye.

(Mat 16.13-20; Mlk 8.27-30; Lk 9.18-21)

67Boye, Yesu alobaki na bantoma zomi na mibale : — Boni, bino mpe bolingi kokende ?

68Simona Petelo azongisaki : — Nkolo, tokokende epai ya nani ? Yo nde ozali na maloba ya bomoi ya seko. 69Biso, tondimi mpe toyebi ete ozali Mosantu ya Nzambe.

70Yesu alobaki na bango : — Boni, ezali Ngai te nde naponaki bino nyonso zomi na mibale ? Nzokande, moko kati na bino azali Satana !

71Yesu azalaki nde koloba na tina na Yuda, mwana mobali ya Simona Isikarioti, oyo, kati na bantoma zomi na mibale, asengelaki koteka Ye.
Copyright information for LinMNB