‏ Joshua 19:1-8

Eteni ya mabele ya libota ya Simeoni

1Na mbala ya mibale, zeke ekweyaki epai ya libota ya Simeoni, kolanda bituka na bango. Libula na bango ezalaki na kati-kati ya eteni ya mabele ya libota ya Yuda. 2Bazwaki lokola libula :
Beri-Sheba, Sheba, Molada,
3Atsari-Shuwali, Bala, Atsemi, 4Elitoladi, Betuli, Orima, 5Tsikilagi, Beti-Marikaboti, Atsari-Suza, 6Beti-Lebaoti mpe Sharueni : bingumba nyonso ezalaki zomi na misato elongo na bamboka na yango ya mike-mike.
7Ayini, Rimoni, Eteri mpe Ashani : bingumba nyonso ezalaki minei elongo na bamboka na yango ya mike-mike 8mpe bamboka nyonso ya mike-mike oyo ezalaki zingazinga ya bingumba oyo, kino na Baalati-Beeri, oyo ezali Ramati ya Negevi.
Yango nde ezalaki libula ya mabele ya libota ya Simeoni, kolanda bituka na bango.
Copyright information for LinMNB