Luke 10:12-15
12—Nalobi na bino, na Mokolo wana, etumbu ya vile wana ekoleka oyo ya Sodomo. 13Mawa na yo Korazini ! Mawa na yo Betsayida ! Pamba te, soki makamwisi oyo esalamaki epai na bino esalamaka na Tire mpe Sidoni, mbele kala penza balingaki kobongola mitema, mpe kolakisa yango, na kolata saki mpe na komipakola putulu. 14Kasi na mokolo ya kosambisama, etumbu na bino ekolela oyo ya Tire mpe Sidoni. 15Bongo yo Kapenawumi, okanisi ete bakotombola yo kino na likolo ? Te, bakobwaka yo tii na mboka ya bakufi.
Copyright information for
LinMNB