‏ Luke 11:14-23

Nzambe to Satana

(Mat 12.22-30; Mlk 3.20-27)

14Mokolo moko, Yesu azalaki kobengana molimo mabe oyo ezalaki kopekisa moto koloba. Tango molimo mabe yango ebimaki, moto oyo azalaki koloba te akomaki koloba, mpe ebele ya bato bakamwaki. 15Kasi bamoko kati na bango balobaki : — Azali kobengana milimo mabe na nguya ya Belizebule, mokonzi ya milimo mabe.

16Bamosusu, mpo na komeka Yesu, basengaki na Ye elembo moko kowuta na Likolo. 17Lokola Yesu ayebaki makanisi na bango, alobaki na bango : — Bokonzi nyonso oyo ekabwani mpe ekomi komibundisa ekomipanza, mpe ndako oyo ekabwani mpe ekomi komibundisa ekokweya. 18Soki Satana akomi komibundisa, bokonzi na ye ekotelema ndenge nini ? Nalobi bongo mpo bolobi ete Ngai nazali kobengana milimo mabe na nguya ya Belizebule. 19Mpe soki Ngai nazali kobengana milimo mabe na nguya ya Belizebule, bayekoli na bino babenganaka yango na nguya ya nani ? Mpo na yango, bayekoli na bino bakozala bango moko basambisi na bino.
20 Kasi soki ezali na nguya ya Nzambe nde Ngai nazali kobengana milimo mabe, wana Bokonzi ya Nzambe esili kokoma kino epai na bino. 21Tango elombe oyo alata bibundeli akengelaka ndako na ye, biloko na ye ebatelamaka malamu ; 22kasi soki moto mosusu oyo aleki ye na makasi ayei kobundisa ye mpe alongi ye, akobotola ye bibundeli oyo azalaki kotiela motema, akokamata biloko na ye nyonso mpe akokaba yango.
23 Moto oyo azali elongo na Ngai te azali monguna na Ngai, mpe moto oyo asangisaka te elongo na Ngai apanzaka.
Copyright information for LinMNB