Luke 11:9-13
(Mat 7.7-11)
9 Boye, Ngai nazali koloba na bino : Bosenga, mpe bakopesa bino ; boluka, mpe bokomona ; bobeta ekuke, mpe bakofungolela bino. 10Pamba te moto nyonso oyo asengaka azwaka, moto oyo alukaka amonaka ; mpe moto oyo abetaka ekuke, bafungolelaka ye yango.11 Nani kati na bino, batata, akopesa na mwana na ye nyoka soki asengi ye mbisi, 12to akopesa ye koto soki asengi ye liki ? 13Bongo soki bino bato oyo bozali kutu mabe boyebi kopesa na bana na bino biloko ya malamu, ndenge nini Tata oyo azali na Likolo apesa te Molimo Mosantu epai ya bato oyo basengaka Ye !
Copyright information for
LinMNB