Luke 12:51-53
(Mat 10.34-36)
51 Boni, bokanisi ete nayaki mpo na komema kimia na mokili ? Kimia te, bokabwani nde. 52Pamba te, kobanda sik’oyo, bato mitano kati na libota moko bakokabwana : misato bakoyina mibale, mpe mibale bakoyina misato. 53Tata akoyina mwana na ye ya mobali, mpe mwana mobali akoyina tata na ye ; mama akoyina mwana na ye ya mwasi, mpe mwana mwasi akoyina mama na ye ; mama-bokilo akoyina mwasi ya mwana na ye ya mobali, mpe mwasi ya mwana mobali akoyina mama-bokilo na ye.
Copyright information for
LinMNB