‏ Luke 12:57-59

(Mat 5.25-26)

57 Mpo na nini bososolaka te, mpo na bino moko, makambo oyo ezali sembo ? 58Soki ozali kokende na esambiselo elongo na moto oyo afundi yo, sala nyonso mpo ete oyokana na ye, wana bozali nanu na nzela. Soki te, akokumba yo epai ya mosambisi, mosambisi akokaba yo na maboko ya bakengeli, mpe bakengeli bakobwaka yo kati na boloko. 59Nazali koloba na yo : okobima na boloko soki kaka ofuti niongo na yo kino na mbongo ya suka ya bibende.
Copyright information for LinMNB