‏ Luke 13:18-19

Mbuma ya mutarde mpe levire

(Mat 13.31-33; Mlk 4.30-32)

18Bongo Yesu atunaki : — Bokonzi ya Nzambe ekokani na nini ? Nakokanisa yango na nini ? 19Bokonzi ya Nzambe ekokani na nkona ya mutarde oyo moto moko azwaki mpe alonaki kati na elanga na ye, ebimisaki moto mpe ekomaki nzete monene, bongo bandeke ya likolo eyaki kovanda na bitape na yango.
Copyright information for LinMNB