Luke 14:15-20
15Bongo moto moko na kati ya bato oyo bavandaki na mesa, tango ayokaki bongo, alobaki na ye : —Esengo mingi na moto oyo akolia na feti na Bokonzi ya Nzambe ! 16Kasi Yesu azongiselaki ye : —Moto moko asalisaki feti moko ya monene mpe abengisaki bato ebele. 17Tango ngonga ya kolia ekokaki, atindaki mosali na ye akende koyebisa na bato oyo abengisaki : “Boya, pamba te biloko nyonso esiʼebongisami.” 18Kasi bango nyonso babandaki kosenga bolimbisi. 19Moto ya liboso alobaki : “Nasombi elanga, esengeli nakende kotala yango. Nabondeli yo, limbisa ngai.” 20Mosusu mpe alobaki : “Nawuti kobala mwasi, yango wana nakokoka koya te.”
Copyright information for
LinMNB