‏ Luke 14:15-24

Lisese ya feti

(Mat 22.1-14)

15Tango moko kati na babengami ayokaki bongo, alobaki na Yesu : — Esengo na moto oyo akolia na feti kati na Bokonzi ya Nzambe !

16Yesu azongiselaki ye : — Moto moko asalaki feti monene mpe abengisaki bato ebele. 17Tango ngonga ya kolia ekokaki, atindaki mosali na ye kokende koloba na bato oyo babengamaki : « Boya, pamba te nyonso esili kobongisama sik’oyo. »
18 Kasi bango nyonso bakomaki kosenga bolimbisi ndenge moko.
Moto ya liboso alobaki : « Nawuti kosomba elanga, nasengeli kokende kotala yango ; nabondeli yo, limbisa ngai ! »
19 Moto ya mibale alobaki : « Nawuti kosomba bangombe zomi, nasengeli komeka yango ; nabondeli yo, limbisa ngai ! »
20 Moto mosusu alobaki : « Nawuti kobala mwasi ; nakoki koya te. »
21 Mosali azongaki mpe ayebisaki makambo nyonso epai ya nkolo na ye. Nkolo ndako asilikaki makasi mpe atindaki mosali na ye : « Kende noki na banzela, na babalabala ya engumba, mpe memela ngai babola, ba-ebosono, bakakatani mpe bakufi miso. »
22 Sima na mwa tango, mosali ayaki mpe alobaki : « Nkolo na ngai, nasali ndenge otindaki ngai ; kasi bisika ezali nanu. »
23 Nkolo alobaki na mosali na ye : « Kende lisusu na banzela mpe na babalabala ya engumba, tinda bango na makasi mpo ete bakota, mpe ndako na ngai etonda na bato. 24Pamba te, nazali koloba na yo : moko te kati na bato oyo babengamaki akolia biloko ya feti na ngai. »
Copyright information for LinMNB