‏ Luke 15:1-7

Lisese ya meme oyo ebungaki mpe emonani

(Mat 18.12-14)

1Bafutisi mpako mpe bato ya masumu bapusanaki bango nyonso pene ya Yesu mpo na koyoka Ye. 2Kasi Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko bazalaki koyimayima mpe koloba : — Moto oyo azali koyamba bato ya masumu mpe kolia mesa moko elongo na bango.

3Bongo Yesu alobaki na bango lisese oyo : 4 — Soki moko kati na bino azali na bameme nkama moko, bongo moko kati na yango ebungi ; boni, akotika te bameme tuku libwa na libwa kati na esobe mpo na kokende koluka moko oyo ewuti kobunga kino amona yango ?
5 Mpe tango akomona yango, akotia yango na mapeka na ye, na esengo. 6Bongo, tango kaka akokoma na ndako na ye, akobengisa balingami mpe baninga na ye, akoloba na bango : « Bosepela na ngai elongo, pamba te namoni meme na ngai, oyo ebungaki ! »
7 Na nzela yango, nazali koloba na bino : esengo oyo ekozala kati na Likolo mpo na mosumuki moko kaka oyo abongoli motema, eleki esengo mpo na bato ya sembo tuku libwa na libwa oyo bazali na posa te ya kobongola mitema.
Copyright information for LinMNB