Luke 18:18-30
Bazwi mpe Bokonzi ya Nzambe
(Mat 19.16-30; Mlk 10.17-31)
18Mokambi moko ya Bayuda atunaki na Yesu : — Moteyi malamu, nasengeli kosala nini mpo ete nazwa bomoi ya seko ?19Yesu azongisaki : — Mpo na nini ozali kobenga Ngai « Moteyi malamu ? » Moko te azali malamu, longola kaka Ye moko Nzambe. 20Oyebi mibeko oyo : « Okosalaka ekobo te, okobomaka te, okoyibaka te, okolobaka te matatoli ya lokuta mpo na kokosela moninga na yo makambo, okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu. »
21Mokambi yango azongisaki : — Natosaka nyonso wana wuta bolenge na ngai.
22Sima na Yesu koyoka bongo, alobaki na ye : — Ozangi eloko moko. Teka biloko na yo nyonso, kabola mbongo oyo okozwa epai ya babola, mpe okozwa bomengo kati na Likolo. Sima na yango, yaka mpe landa Ngai.
23Tango mokambi ya Bayuda ayokaki bongo, akomaki mawa-mawa, pamba te azalaki na bozwi mingi. 24Yesu atalaki ye mpe alobaki : — Ezali pasi mpo na mozwi kokota kati na Bokonzi ya Nzambe ! 25Nzokande, eleki pete mpo na shamo kolekela na lidusu ya tonga ; kasi ezali penza pasi mpo na mozwi kokota kati na Bokonzi ya Nzambe.
26Bato oyo bayokaki Ye koloba bongo batunaki : — Bongo nani penza akoki kobikisama ?
27Yesu azongisaki : — Oyo ekoki kosalema te elongo na bato, ekoki kosalema elongo na Nzambe.
28Petelo alobaki na Yesu : — Nkolo, totiki nyonso oyo tozalaki na yango mpo na kolanda Yo !
29Yesu alobaki na bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : moto nyonso oyo atiki ndako na ye, mwasi na ye, bandeko na ye, baboti na ye to bana na ye, mpo na kozwa Bokonzi ya Nzambe lokola litomba, 30akozwa, na tango oyo, biloko mingi koleka ; mpe na tango oyo ezali koya, bomoi ya seko.
Copyright information for
LinMNB