Luke 18:35-43
Yesu abikisi mokufi miso
(Mat 20.29-34; Mlk 10.46-52)
35Wana Yesu akomaki pene ya Jeriko, ezalaki na mokufi miso pembeni ya nzela, azalaki ya kovanda mpe azalaki kosenga-senga. 36Tango ayokaki makelele ya ebele ya bato oyo bazali koleka, atunaki : — Likambo nini oyo ezali kosalema ?37Balobaki na ye : — Yesu ya Nazareti azali koleka !
38Agangaki : — Yesu, Mwana ya Davidi, yokela ngai mawa !
39Bato oyo bazalaki liboso bapamelaki ye mpe balobaki na ye ete akanga monoko ; kasi, ye, agangaki lisusu makasi koleka : — Mwana ya Davidi, yokela ngai mawa !
40Yesu atelemaki mpe atindaki ete bamemela Ye mokufi miso yango. Tango akomaki pene na Ye, Yesu atunaki ye : 41 — Olingi nasala nini mpo na yo ?
Mokufi miso azongisaki : — Nkolo, nalingi komona.
42Yesu alobaki na ye : — Mona ! Kondima na yo ebikisi yo.
43Mpe mbala moko, akomaki komona, mpe alandaki Yesu, na kokumisa Nzambe. Tango bato nyonso bamonaki bongo, bango mpe bakumisaki Nzambe.
Copyright information for
LinMNB