‏ Luke 19:12-27

12Boye Yesu alobaki : — Ezalaki na moto moko abotama na libota ya mbongo ; akendeki na mokili moko ya mosika mpo ete bakomisa ye mokonzi mpe, sima na yango, akozonga. 13Boye abengaki basali zomi kati na basali na ye mpe apesaki bango mbongo ya bibende zomi. Alobaki na bango : « Bosala mombongo na mbongo oyo kino tango nakozonga. »
14 Kasi bandeko na ye, bana mboka, bazalaki kolinga ye te ; batindaki ndambo ya bato, sima na ye, mpo na koloba : « Toboyi ete moto oyo akoma mokonzi na biso. »
15 Sima na ye kozwa bokonzi, azongaki na ekolo na ye mpe abengaki basali epai ya banani apesaki mbongo mpo na koyeba soki bazwi mileki boni na mbongo na ye.
16 Mosali ya liboso ayaki mpe alobaki : « Nkolo na ngai, mbongo na yo eboti mbongo ya bibende zomi lokola mileki. »
17 Nkolo alobaki na ye : « Osali malamu ! Ozali mosali malamu ! Mpo ete ozalaki sembo na likambo ya moke, nakokomisa yo moyangeli ya bingumba zomi. »
18 Mosali ya mibale ayaki mpe alobaki : « Nkolo na ngai, mbongo na yo eboti mbongo ya bibende mitano lokola mileki. »
19 Nkolo na ye azongisaki : « Nakokomisa yo moyangeli ya bingumba mitano. »
20 Mosali mosusu ayaki mpe alobaki : « Nkolo na ngai, tala mbongo na yo ! Nabombaki yango malamu kati na eteni ya elamba. 21Nazalaki kobanga yo, pamba te ozalaka moto ya matata : ozwaka biloko oyo obombaki te mpe obukaka bambuma ya nkona oyo olonaki te. »
22 Nkolo na ye azongisaki : « Mosali mabe ! Nakopesa yo etumbu kolanda maloba na yo moko. Oyebaki ete nazali moto ya matata, ete nazwaka biloko oyo nabombaki te mpe nabukaka bambuma ya nkona oyo nalonaki te. 23Bongo mpo na nini obombaki te mbongo na ngai kati na ndako ya misolo ? Na bozongi na ngai, nalingaki kozwa yango elongo na mileki ? »
24 Bongo nkolo alobaki na bato oyo bazalaki wana : « Bobotola ye mbongo yango mpe bopesa yango na moto oyo azali na mbongo ya bibende zomi. »
25 Balobaki na ye : « Nkolo, azali na mbongo ya bibende zomi ! »
26 Nkolo azongisaki : « Nazali koloba na bino : na moto oyo azali na eloko, bakopesa ye lisusu ; kasi na moto oyo azangi, bakobotola ye ata oyo azali na yango. 27Kasi banguna na ngai wana, oyo baboyaki ete nakoma mokonzi na bango, bomemela ngai bango awa mpe boboma bango na miso na ngai. »
Copyright information for LinMNB