‏ Luke 19:28-38

Lotomo ya Yesu na Yelusalemi

Bayambi Yesu na nkembo monene

(Mat 21.1-11, 15-17; Mlk 11.1-10; Yn 12.12-16)

28Sima na Yesu koloba bongo, alekaki liboso mpo na kokende na Yelusalemi.

29Wana akomaki pene ya Betifaje mpe Betani, na ngomba oyo babengaka « ngomba ya banzete ya olive, » atindaki bayekoli mibale kati na bayekoli na Ye ; 30alobaki na bango : — Bokende na mboka oyo ezali liboso na bino. Tango kaka bokokota na mboka yango, bokomona mwana ya ane bakanga na singa, oyo moto ata moko te asila kosalela ; bofungola yango mpe bomema yango awa. 31Soki moto moko atuni bino : « Mpo na nini bozali kofungola yango ? »
Boloba na ye : « Nkolo azali na bosenga na yango. »

32Bato oyo Yesu atindaki bakendeki mpe bamonaki yango ndenge kaka Yesu alobaki na bango.

33Wana bazalaki kofungola mwana yango ya ane, bankolo na yango batunaki bango : — Mpo na nini bozali kofungola mwana oyo ya ane ?

34Bazongisaki : — Nkolo azali na bosenga na yango.

35Bamemaki mwana yango ya ane epai ya Yesu, batandaki bilamba na bango na mokongo na yango, mpe Yesu avandaki na likolo na yango.

36Wana azalaki kokende, bato bazalaki kotanda bilamba na bango na nzela. 37Mpe tango akomaki pene ya Yelusalemi, na esika oyo nzela ekita na ngomba ya banzete ya olive, ebele ya bayekoli babandaki kokumisa Nzambe, na esengo nyonso mpe na mongongo makasi mpo na bikamwa nyonso oyo bamonaki. 38Bazalaki koloba : « Tika ete apambolama,
mokonzi oyo ayei na Kombo ya Nkolo !
Kimia kati na Likolo,
mpe nkembo kati na bisika oyo eleki Likolo ! »
Copyright information for LinMNB