Luke 19:45-48
Yesu ateyi kati na Tempelo
(Mat 21.12-13; Mlk 11.15-19; Tala Yn 2.13-17)
45Yesu akotaki kati na lopango ya Tempelo mpe abandaki kobengana bato oyo bazalaki koteka biloko kuna ; alobaki na bango : 46 — Ekomama : « Ndako na Ngai ekozala Ndako ya losambo ; » kasi bino, bokomisaki yango penza nganda ya miyibi !47Yesu azalaki koteya mikolo nyonso na Tempelo. Bakonzi ya Banganga-Nzambe, balakisi ya Mobeko mpe bakambi ya Bayuda bazalaki koluka koboma Ye ; 48kasi bazalaki kokoka te, pamba te bato nyonso bazalaki koyoka Yesu na bokebi.
Copyright information for
LinMNB