‏ Luke 20:1-8

Bokonzi ya Yesu endimami te

(Mat 21.23-27; Mlk 11.27-33)

1Mokolo moko, wana Yesu azalaki koteya bato kati na lopango ya Tempelo mpe kosakola Sango Malamu, bakonzi ya Banganga-Nzambe, balakisi ya Mobeko mpe bakambi ya bato babimelaki Ye ; 2balobaki na Ye : — Yebisa biso, na kombo ya bokonzi nini ozali kosala biloko oyo ? Nani apesi yo bokonzi yango ?

3Yesu azongisaki : — Ngai mpe, nazali kotuna bino motuna moko. Boyebisa Ngai : 4Libatisi ya Yoane ewutaki na Nzambe to ewutaki na bato ?

5Bakomaki kokabola makanisi bango na bango : « Soki tolobi : ‹ Ewutaki na Nzambe, › akotuna biso lisusu : ‹ Bongo mpo na nini bondimaki Ye te ? › 6Soki mpe tolobi : ‹ Ewutaki na bato, › bato nyonso bakobamba biso mabanga, pamba te bandimaka ete Yoane azalaki mosakoli. » 7Boye, bazongisaki : — Toyebi te epai wapi ewutaki.

8Yesu alobaki : — Ngai mpe, nakoyebisa bino te soki na kombo ya bokonzi nini nazali kosala makambo yango.
Copyright information for LinMNB