Luke 20:20-26
Mpako ya kofuta epai ya Sezare
(Mat 22.15-22; Mlk 12.13-17)
20Kobanda na tango wana, bakomaki kolandela Yesu, mpe batindaki banongi oyo bazalaki komilakisa lokola bato ya sembo, mpo na kokanga Ye na maloba na Ye mpe kokaba Ye na maboko ya basambisi mpe ya moyangeli. 21Banongi yango batunaki Yesu : — Moteyi, toyebi ete olobaka mpe oteyaka makambo ya sembo, mpe oponaka bilongi te, kasi oteyaka na bosolo nzela ya Nzambe. 22Boni, ezali sembo mpo na biso kofuta mpako epai ya Sezare to te ?23Kasi Yesu asosolaki mayele mabe na bango mpe alobaki na bango : 24 — Bolakisa Ngai mbongo moko ya ebende. Elilingi mpe makomi oyo batobola na mbongo oyo, ezali ya nani ?
Bazongisaki : — Ya Sezare !
25Yesu alobaki na bango : — Boye bopesa na Sezare, oyo ezali ya Sezare ; mpe na Nzambe, oyo ezali ya Nzambe !
26Balongaki te kokanga Ye na nzela ya makambo oyo alobaki liboso ya bato ; mpe lokola bakamwaki eyano na Ye, bavandaki nye.
Copyright information for
LinMNB