‏ Luke 20:27-40

Eyano ya Yesu na tina na lisekwa

(Mat 22.23-33; Mlk 12.18-27)

27Ndambo ya Basaduseo, oyo balobaka ete lisekwa ezali te, bayaki epai ya Yesu mpo na kotuna Ye motuna oyo : 28— Moteyi, Moyize atikela biso mobeko oyo kati na makomi : « Soki mobali moko akufi, atiki mwasi kasi bana te, ndeko na ye ya mobali asengeli kobala mwasi oyo akufisi mobali mpo ete abotela ndeko oyo asili kokufa bana. » 29Nzokande, azalaki na bandeko mibali sambo. Ndeko ya liboso abalaki mwasi yango mpe akufaki, kasi abotaki bana te. 30Ndeko ya mibale abalaki mwasi yango kaka ; 31sima na ye, ndeko ya misato. Esalemaki kaka bongo kino na ndeko oyo ya sambo : bandeko nyonso sambo bakufaki, batikalaki kobota bana te.

32Sima na bango nyonso, mwasi yango mpe akufaki. 33Sik’oyo, na mokolo oyo bato bakosekwa kati na bakufi, mwasi yango akozala mwasi ya nani, pamba te bandeko mibali nyonso sambo babalaki ye ?

34Yesu azongisaki : — Ezali bato ya mokili oyo nde babalaka mpe babalisaka ; 35kasi bato oyo bakomonana ete bakoki mpo na kosekwa kati na bakufi mpe kobika bomoi kati na mokili oyo ezali koya, bakobala te 36mpe bakokufa lisusu te, pamba te bazali lokola ba-anjelu. Bazali bana na Nzambe mpo ete basekwi kati na bakufi. 37Moyize atalisaki polele ete bakufi bakosekwa ; pamba te, kati na eteni oyo ezali kolobela nzete oyo ezalaki kopela moto kasi ezalaki kozika te, abengaki Nkolo « Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi. » 38Nzokande, Nzambe azali Nzambe ya bakufi te, kasi Nzambe ya bato ya bomoi ; pamba te, mpo na Ye, bango nyonso misato bazali na bomoi.

39Ndambo ya balakisi ya Mobeko bazongisaki : — Moteyi, olobi malamu !

40Mpe moko te amekaki lisusu kotuna Ye mituna.
Copyright information for LinMNB