‏ Luke 20:45-47

Yesu akebisi bayekoli na Ye

(Mat 23.1, 5-7; Mlk 12.37-40)

45Wana ebele ya bato bazalaki koyoka, Yesu alobaki na bayekoli na Ye : 46 — Bosala keba na balakisi ya Mobeko ! Balingaka kotambola na banzambala ya milayi ; balingaka ete bato bapesa bango mbote, na bisika oyo bato ebele bakutanaka ; balingaka kovanda na bakiti ya liboso, kati na bandako ya mayangani ; mpe na bisika ya lokumu, kati na bafeti ; 47bayibaka biloko ya basi oyo bakufisa mibali mpe basalaka mabondeli ya milayi-milayi mpo na kokosa bato. Bakozwa etumbu oyo eleki makasi.
Copyright information for LinMNB