‏ Luke 21:1-4

Likabo ya mwasi akufisa mobali

(Mlk 12.41-44)

1Wana Yesu atombolaki miso, amonaki bato na bozwi kotia makabo na bango kati na kitunga ya makabo ; 2amonaki mpe mwasi mobola moko akufisa mobali kotia mbongo ya bibende mibale. 3Alobaki : — Nazali koloba na bino penza ya solo : mwasi mobola oyo akufisa mobali apesi koleka bato nyonso. 4Pamba te bato wana nyonso bazwi kati na mbongo oyo bazali na yango na tina te, mpo na kotia kati na kitunga ya makabo ; kasi ye, kati na kokelela na ye, atie nyonso oyo azalaki na yango mpo na kokoba kobika.
Copyright information for LinMNB