Luke 21:20-24
20—Tango bokomona Yeruzalem bazingi yango na mapinga ya basoda, boyeba ete tango na yango ya kopanzana ekomi pene-pene. 21Bongo bato oyo bakozala na Yudea esengeli bakima na bangomba ; baoyo bakozala na kati ya Yeruzalem esengeli babima ; mpe baoyo bakozala na bilanga bakota te na kati na yango. 22Pamba te, mikolo wana ekozala mikolo ya etumbu monene, oyo makambo nyonso ekomama ekokokisama. 23Mawa mingi na basi oyo bakozala na zemi mpe na baoyo bakobanda komelisa bana na mikolo wana ! Pamba te, pasi ekozala monene na ekolo oyo, mpe etumbu ekokweyila bato oyo. 24Bakoboma bango na mopanga mpe bakomema bango na bowumbu na bikolo nyonso. Bapakano bakonyata Yeruzalem kino tango ya Bapakano ekokoka.Koya ya Mwana na moto
(Mt. 24.29-35 ; Mk. 13.24-31)
Copyright information for
LinMNB