‏ Luke 21:25-28

(Mat 24.29-35; Mlk 13.24-31)

25 Bilembo ekomonana kati na moyi, kati na sanza, mpe kati na minzoto ; bongo na mokili, bikolo ekotonda na somo mpe na kobanga likolo ya lokito makasi mpe ya bambonge ya ebale monene. 26Bato bakokufa na somo, wana bakozala kokanisa makambo oyo esengeli koya na mokili, pamba te banguya ya Likolo ekoningisama. 27Sima na yango, bakomona Mwana na Moto koya kati na mapata, na nguya mpe na nkembo monene.
28 Tango makambo wana ekobanda kosalema, botelema, botombola mito mpe boyika mpiko, pamba te lisiko na bino ekomi pene.
Copyright information for LinMNB