‏ Luke 22:31-34

Yesu asakoli ete Petelo akowangana Ye

(Mat 26.31-35; Mlk 14.27-31; Yn 13.36-38)

31 Simona, Simona, Satana asengi koyungola bino ndenge bayungolaka ble. 32Kasi nasambeli mpo na yo, mpo ete kondima na yo ekweya te. Mpe sima na yo kozonga epai na Ngai, lendisa bandeko na yo.

33Kasi Petelo azongisaki : — Nkolo, nandimi kokota boloko to kokufa elongo na Yo.

34Yesu alobaki na ye : — Petelo, nazali koloba na yo : lelo, liboso ete soso elela, okowangana mbala misato ete oyebi Ngai te.
Copyright information for LinMNB