‏ Luke 22:39-46

Yesu, na ngomba ya banzete ya olive

(Mat 26.36-46; Mlk 14.32-42)

39Yesu abimaki mpe akendeki lokola momesano na ngomba ya banzete ya olive, mpe bayekoli na Ye balandaki Ye. 40Tango akomaki na esika yango, alobaki na bango : — Bosambela mpo ete bokweya te kati na komekama.

41Akendeki mwa mosika na bango, afukamaki mpe asambelaki boye : 42« Tata, soki olingi, longola kopo oyo ya pasi liboso na Ngai ! Nzokande, kosala te kolanda mokano na Ngai, kasi sala kolanda mokano na Yo. » [ 43Anjelu moko awutaki na Likolo, abimelaki Ye mpe alendisaki Ye. 44Lokola azalaki koyoka somo makasi, asambelaki lisusu makasi koleka, kino motoki na Ye ekomaki lokola matanga ya makila oyo ekomaki kokweya na mabele.]
Biteni oyo ezali te na mikanda mingi ya kala.

45Tango asilisaki kosambela, atelemaki, akendeki epai bayekoli na Ye bazalaki mpe akutaki bango balala pongi, mpo ete batondaki na mawa.

46Atunaki bango : — Mpo na nini bozali kolala ? Botelema mpe bosambela mpo ete bokweya te kati na komekama.
Copyright information for LinMNB