‏ Luke 22:47-53

Bakangi Yesu

(Mat 26.47-55; Mlk 14.43-49; Yn 18.2-11)

47Wana Yesu azalaki nanu koloba, ebele ya bato bayaki ; mpe moto oyo bazalaki kobenga « Yuda, » moko kati na bayekoli zomi na mibale, azalaki liboso na bango. Apusanaki pene ya Yesu mpo na koyamba Ye, 48kasi Yesu atunaki ye : — Yuda, ozali penza koteka Mwana na Moto na nzela ya beze ?

49Tango bato oyo bazalaki elongo na Yesu bamonaki makambo oyo ezali kosalema, batunaki Ye : — Nkolo, tobeta bango na nzela ya mipanga na biso ?

50Mpe moko kati na bango abetaki mosali ya mokonzi ya Banganga-Nzambe mopanga mpe akataki ye litoyi ya ngambo ya loboko ya mobali. 51Kasi Yesu alobaki : — Boye lisusu te !

Yesu asimbaki litoyi ya mobali yango mpe abikisaki ye.

52Bongo Yesu alobaki na bakonzi ya Banganga-Nzambe, na bakonzi ya bakengeli ya Tempelo mpe na bakambi ya bato, oyo bayaki kokanga Ye : — Boni, nakomi mokambi ya batomboki mpo ete boya kokanga Ngai na mipanga mpe banzete ? 53Nazalaki elongo na bino mikolo nyonso kati na lopango ya Tempelo, mpe bokangaki Ngai te. Kasi ezali ngonga na bino, ngonga oyo bokonzi ya molili ezali kokonza.
Copyright information for LinMNB