Luke 22:55-57
55Mpe tango bapelisaki moto na kati-kati ya lopango mpe bavandaki lisanga, Petelo mpe avandaki elongo na bango.(Mat 26.69-75; Mlk 14.66-72; Yn 18.17-18, 25-27)
56Mwasi mosali moko amonaki Petelo avandi wana pembeni ya moto. Sima na ye kotala Petelo malamu, alobaki : — Tata oyo azalaki elongo na Yesu !57Kasi Petelo awanganaki mpe alobaki : — Mwasi, nayebi ye te.
Copyright information for
LinMNB