Luke 22:56-62
(Mat 26.69-75; Mlk 14.66-72; Yn 18.17-18, 25-27)
56Mwasi mosali moko amonaki Petelo avandi wana pembeni ya moto. Sima na ye kotala Petelo malamu, alobaki : — Tata oyo azalaki elongo na Yesu !57Kasi Petelo awanganaki mpe alobaki : — Mwasi, nayebi ye te.
58Sima na mwa tango moke, moto mosusu amonaki Petelo mpe alobaki : — Yo mpe ozali moko kati na bango !
Petelo azongisaki : — Tata, nazali moko te kati na bango.
59Sima na ngonga moko, moto mosusu alobaki na molende : — Ezali ya solo ! Tata oyo azalaki elongo na ye, pamba te azali moto ya Galile.
60Kasi Petelo azongisaki : — Nayebi te makambo oyo ozali kolobela !
Wana azalaki nanu koloba, soso elelaki. 61Nkolo abalukaki mpe atalaki Petelo ; mpe Petelo akanisaki maloba oyo Nkolo alobaki na ye : « Liboso ete soso elela, okowangana Ngai mbala misato. » 62Abimaki mpe alelaki makasi na libanda.
Copyright information for
LinMNB