Luke 22:58-62
58Sima na mwa tango moke, moto mosusu amonaki Petelo mpe alobaki : — Yo mpe ozali moko kati na bango !Petelo azongisaki : — Tata, nazali moko te kati na bango.
59Sima na ngonga moko, moto mosusu alobaki na molende : — Ezali ya solo ! Tata oyo azalaki elongo na ye, pamba te azali moto ya Galile.
60Kasi Petelo azongisaki : — Nayebi te makambo oyo ozali kolobela !
Wana azalaki nanu koloba, soso elelaki. 61Nkolo abalukaki mpe atalaki Petelo ; mpe Petelo akanisaki maloba oyo Nkolo alobaki na ye : « Liboso ete soso elela, okowangana Ngai mbala misato. » 62Abimaki mpe alelaki makasi na libanda.
Copyright information for
LinMNB