Luke 22:63-71
(Mat 26.67-68; Mlk 14.65)
63Bato oyo bazalaki kokengela Yesu babandaki koseka mpe kobeta Ye. 64Bazipaki Ye elongi mpe basengaki na makasi : — Sakola : Nani abeti Yo ?65Mpe balobaki na Ye maloba mabe ebele mpo na kofinga Ye.
Yesu asambi
(Mat 26.59-65; 27.1; Mlk 14.55-64; Yn 18.19-24)
66Tango tongo etanaki, bakambi ya bato, elongo na bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko, basanganaki mpe basengaki ete bamema Yesu liboso ya Likita-Monene na bango. 67Balobaki : — Soki ozali Klisto, yebisa biso.Yesu azongisaki : — Ata nayebisi bino, bokondima na bino kaka Ngai te ; 68mpe soki Ngai napesi bino motuna, bokopesa na bino mpe Ngai eyano te. 69Kasi kobanda sik’oyo, Mwana na Moto akovanda na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso.
70Bango nyonso batunaki : — Ozali Mwana na Nzambe ?
Yesu azongisaki : — Bino nde bolobi ete nazali Mwana na Nzambe.
71Bongo balobaki : — Mpo na nini koluka matatoli mosusu ? Toyoki yango na monoko na ye moko.
Copyright information for
LinMNB