Luke 23:1-5
Yesu asambi liboso ya Pilato mpe Erode
(Mt. 27.2,11-34 ; Mk. 15.1-5 ; Jn. 18.28-38)
1Bongo bato nyonso ya likita batelemaki mpe bamemaki ye epai ya Pilato. 2Kuna, babandaki kofunda ye : —Tokutaki moto oyo azalaki kokotisa mobulu na ekolo na biso : azali kopekisa ete bato bafuta mpako ya Sezare te, mpe azali komibenga Kristo, Mokonzi ! 3Bongo Pilato atunaki Yesu : —Ozali Mokonzi ya Bayuda ? Yesu azongisaki : —Yo moko olobi yango ! 4Bongo Pilato alobaki na bakonzi ya banganga-Nzambe mpe na ebele ya bato : —Namoni mabe moko te na moto oyo ! 5Kasi bango batiaki mbamba mpe balobaki : —Azali kotombokisa bato na Yudea mobimba na mateya na ye Abandaki na Galileya mpe akomi tii awa !
Copyright information for
LinMNB