Luke 23:13-18
13Pilato abengisaki bakonzi ya banganga-Nzambe, bampaka ya Bayuda, mpe bato, alobaki na bango : 14—Bomemelaki ngai moto oyo, mpe bofundaki ye ete azali kotindika bato mpo batomboka. Nzokande natunaki ye ngai moko liboso na bino, mpe namoni na ye ata mabe moko te na oyo bofundelaki ye. 15Erode mpe amonaki ata mabe moko te na ye, yango wana azongisi ye epai na biso. Ya solo, moto oyo asali mabe ata moko te mpo azwa etumbu ya liwa. 16Yango wana, nakobetisa ye bafimbo mpe nakotika ye. 17[Na feti nyonso, Pilato asengelaki kobimisela bango moto moko ya boloko ▼▼ Mikanda mingi ya kala ezangi verset oyo.
.] 18Bongo bato nyonso bagangaki nzela moko : —Boma ye ! Tikela biso Barabasi !
Copyright information for
LinMNB