‏ Luke 23:13-23

Bakateli Yesu etumbu ya kufa

(Mat 27.15-26; Mlk 15.1-15; Yn 18.39–19.16)

13Pilato abengisaki bakonzi ya Banganga-Nzambe, bakambi ya Bayuda mpe bato nyonso ; alobaki na bango : 14— Bomemelaki ngai moto oyo mpe bofundaki ye ete azali kotombokisa bato. Napesi ye mituna liboso na bino mpe nazwi ye na mabe ata moko te kati na nyonso oyo bofundelaki ye. 15Erode mpe azwaki ye na mabe ata moko te, yango wana azongisaki ye epai na biso. Boye, ndenge bokoki komona, moto oyo asali mabe ata moko te oyo ekoki kosala ete azwa etumbu ya kufa. 16Na bongo, nakobetisa ye kaka fimbu mpe, sima, nakotika ye.

[
17Nzokande, na bafeti nyonso, Pilato azalaki kobimisela bango mokangami moko.]
Eteni oyo ezali te na mikanda mingi ya kala.

18Bato nyonso bagangaki : — Boma moto oyo ! Bimisela biso Barabasi !

19Barabasi akangamaki na boloko mpo ete abimisaki mobulu kati na engumba mpe abomaki moto.

20Lokola azalaki na posa ya kotika Yesu, Pilato atunaki bango lisusu. 21Kasi bakobaki koganga : — Baka ye na ekulusu ! Baka ye na ekulusu !

22Pilato atunaki bango lisusu, mpo na mbala ya misato : — Mpo na nini ? Mabe nini tata oyo asali ? Ngai nazwi ye na mabe ata moko te, oyo ekoki kosala ete azwa etumbu ya kufa. Boye, nakobetisa ye kaka fimbu ; sima, nakotika ye.

23Kasi bakobaki kaka kosenga, na koganga makasi koleka, ete babaka Yesu na ekulusu ; mpe suka na suka, koganga na bango elongaki.
Copyright information for LinMNB