‏ Luke 23:26-43

Kufa ya Yesu

(Mat 27.31-44; Mlk 15.20-32; Yn 19.17-22)

26Wana basoda bazalaki kokumba Yesu, bakangaki mobali moko, kombo na ye ezalaki Simona, moto ya Sirene, oyo awutaki na bilanga ; batiaki ekulusu na mokongo na ye mpo ete amema yango sima na Yesu. 27Bato ebele balandaki Yesu. Kati na bango, ezalaki mpe na basi oyo bazalaki kolelalela mpe komitungisa mingi mpo na Ye. 28Yesu abalukaki mpo na kotala basi mpe alobaki : — Bana basi ya Yelusalemi, bolela mpo na Ngai te ; bolela nde mpo na bino moko mpe mpo na bana na bino. 29Pamba te, na mikolo oyo ekoya, bakoloba : « Esengo na basi oyo bazali na bana te, oyo babota te mpe bamelisa bana mabele te ! » 30Bongo
bakoloba na bangomba milayi : « Bokweyela biso ! »
Mpe bakoloba na bangomba mikuse : « Bozipa biso ! »

31 Pamba te soki bato bazali kosala makambo ya boye na nzete ya mobesu, ekozala ndenge nini na nzete ya kokawuka ?

32Bamemaki mpe mibali mosusu mibale, babomi bato, mpo na koboma bango elongo na Yesu.

33Tango bakomaki na esika oyo babengaka « Gologota, » babakaki kuna Yesu elongo na babomi mibale wana ya bato : moko, na ngambo ya loboko ya mobali ya Yesu ; mosusu, na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi.

34Yesu alobaki : — Tata, limbisa bango mpo ete bayebi te makambo oyo bazali kosala
Eteni oyo ezali te na mikanda mingi ya kala.
.

Mpe bakabolaki bilamba na Ye, na kobeta zeke.
35Bato batelemaki wana, bazalaki kotala ; mpe bakambi batiolaki Ye, balobaki : — Abikisaki bato mosusu ; tika ete amibikisa ye moko, soki penza azali Klisto, Moponami ya Nzambe !

36Basoda mpe bakendeki mpe batiolaki Ye ; bapesaki Ye vino ya ngayi 37mpe balobaki : — Soki ozali penza mokonzi ya Bayuda, mibikisa yo moko !

38Na likolo ya moto ya Yesu, ezalaki na makomi oyo : Moto oyo azali Mokonzi ya Bayuda.

39Moko kati na babomi bato oyo babakamaki na ba-ekulusu atiolaki Ye : — Boni, ozali Klisto te ? Mibikisa yo moko mpe bikisa biso !

40Kasi mobomi bato mosusu apamelaki ye : — Ozali kobanga Nzambe te mpo ete ozali na se ya etumbu ya ndenge moko na oyo ya Ye ! 41Biso, tozwi penza etumbu na ndenge ya bosembo, pamba te tozali kozwa mbano ya misala mabe na biso ; kasi tata oyo asali ata mabe moko te.

42Bongo alobaki lisusu : — Yesu, kanisa ngai tango okokota kati na Bokonzi na Yo.

43Yesu azongiselaki ye : — Nazali koloba na yo penza ya solo : lelo, okozala elongo na Ngai kati na Paradizo.
Copyright information for LinMNB