‏ Luke 23:44-49

(Mat 27.45-56; Mlk 15.33-41; Yn 19.25-30)

44Na ngonga pene ya midi, molili ekotaki na mokili mobimba kino na ngonga ya misato ya pokwa, 45pamba te moyi etikaki kongenga, mpe rido monene ya Tempelo epasukaki na kati-kati. 46Yesu agangaki na mongongo makasi : — Tata, nazongisi molimo na Ngai kati na maboko na Yo.

Sima na Ye koloba bongo, akataki motema.

47Tango mokonzi ya basoda ya Rome amonaki makambo oyo eleki, akumisaki Nzambe mpe alobaki : — Moto oyo azalaki penza sembo !

48Tango bato nyonso oyo basanganaki wana, mpo na kotala makambo oyo ezali kosalema, bamonaki makambo oyo ekweyi, batiaki maboko na bango na batolo na bango mpe bazongaki. 49Kasi bato nyonso oyo bayebaki Yesu, mpe basi oyo balandaki Ye longwa na Galile, batelemaki na mosika mpe bazalaki kotala ndenge makambo ezali koleka.
Copyright information for LinMNB