‏ Luke 24:1-11

Yesu asekwi

(Mat 28.1-9; Mlk 16.1-8; Yn 20.1-13)

1Na tongo-tongo ya mokolo ya liboso ya poso, basi bakendeki na kunda mpe bamemaki mafuta ya solo kitoko oyo balambaki. 2Libanga oyo ekangaki ekotelo ya kunda, bakutaki yango etindikama mosika na ekotelo ya kunda. 3Bakotaki, kasi bamonaki te nzoto ya Nkolo Yesu. 4Wana bazalaki nanu komitungisa mpo na likambo yango, bato mibale babimelaki bango, balata bilamba oyo ezali kongenga makasi. 5Basi yango babangaki, bakitisaki bilongi na bango na ngambo ya mabele ; kasi bato wana mibale balobaki na bango : — Mpo na nini bozali koluka kati na bakufi Ye oyo azali na bomoi ? 6Azali lisusu awa te, asekwi. Bokanisa makambo oyo ayebisaki bino, wana azalaki nanu kati na Galile : 7« Esengeli ete bakaba Mwana na Moto na maboko ya bato ya masumu ; esengeli ete babaka Ye na ekulusu ; mpe esengeli ete asekwa sima na mikolo misato. »

8Boye, bakanisaki maloba ya Yesu.

9Tango bazongaki longwa na kunda, bayebisaki makambo wana nyonso epai ya bayekoli zomi na moko mpe epai ya baninga na bango nyonso. 10Ezalaki : Mari, moto ya mboka Magidala ; Jane mpe Mari, mama ya Jake. Baninga na bango mosusu ya basi bayebisaki mpe makambo yango epai ya bantoma, 11kasi bazwaki maloba ya basi yango lokola maloba ezanga tina, mpe bandimaki bango te.
Copyright information for LinMNB