Luke 24:1-6

Yesu asekwi

(Mt. 28.1-9 ; Mk. 16.1-8 ; Jn. 20.1-10)

1Na tongo-tongo ya mokolo ya liboso ya poso, basi bakendaki na simetiele ; bamemaki mafuta ya solo kitoko oyo babongisaki. 2Bakutaki libanga etiamaki pembeni ya monoko ya lilita. 3Kasi tango bakotaki na kati, bamonaki nzoto ya Nkolo Yesu te. 4Na tango bazalaki naino komituna mpo na tina ya likambo yango, bato mibale balataki bilamba oyo ezalaki kongenga makasi penza, batelemaki pembeni na bango. 5Babangaki, mpe bakitisaki bilongi na nse ; bongo bato yango batunaki bango :

—Mpo na nini bozali koluka kati na bakufi moto oyo azali na bomoi ?
6Azali awa te ! Asiʼasekwi ! Bokanisa makambo oyo azalaki koloba na bino tango azalaki naino na Galileya :
Copyright information for LinMNB