Luke 24:36-43
Yesu abimeli bayekoli zomi na moko
(Yn 20.19-23)
36Wana bazalaki nanu kosolola na tina na makambo yango, Yesu ayaki kotelema na kati-kati na bango mpe alobaki : — Tika ete kimia ezala na bino !37Babangaki mpe somo ekangaki bango, pamba te bakanisaki ete bamoni elima. 38Yesu atunaki bango : — Mpo na nini bozali kobanga ? Mpe mpo na nini bozali na tembe kati na mitema na bino ? 39Botala maboko mpe makolo na Ngai ; ezali penza Ngai. Bosimba Ngai mpe botala ! Elima ezalaka na mosuni te, ezalaka mpe na mikuwa te ; nzokande, bozali komona malamu ete, Ngai, nazali na yango.
40Wana azalaki koloba bongo, alakisaki bango maboko mpe makolo na Ye. 41Lokola bakokaki nanu kondima te mpo ete batondisamaki na esengo mpe bazalaki kokamwa mingi, Yesu atunaki bango : — Bozali awa na eloko ya kolia ?
42Bapesaki Ye eteni ya mbisi bakalinga. 43Azwaki yango mpe aliaki yango na miso na bango.
Copyright information for
LinMNB