Luke 4:1-13
Komekama ya Yesu
(Mat 4.1-11; Mlk 1.12-13)
1Yesu atondisamaki na Molimo Mosantu, alongwaki na Yordani, mpe Molimo amemaki Ye kati na esobe 2epai wapi Satana amekaki Ye mikolo tuku minei. Na mikolo wana, alia eloko moko te ; mpe tango mikolo yango elekaki, ayokaki nzala. 3Satana alobaki na Ye : — Soki ya solo ozali penza Mwana na Nzambe, loba na libanga ete ebongwana lipa.4Yesu azongiselaki ye : — Ekomama : « Moto akobika na lipa kaka te. »
5Satana amemaki Yesu na esika moko ya likolo makasi, alakisaki Ye mbala moko bokonzi nyonso ya mokili. 6Satana alobaki na Yesu : — Nakopesa yo bokonzi oyo nyonso mpe nkembo na yango, pamba te epesamela ngai, mpe nakoki kopesa yango na moto nyonso oyo nalingi. 7Soki kaka ogumbameli ngai, nyonso ekokoma ya yo.
8Yesu azongiselaki ye : — Ekomama : « Okogumbamelaka kaka Yawe, Nzambe na yo, mpe okosambelaka kaka Ye. »
9Bongo Satana amemaki Ye na Yelusalemi, atelemisaki Ye na songe ya Tempelo mpe alobaki na Ye : — Soki ozali penza Mwana na Nzambe, mibwaka na se ; 10pamba te ekomama :
« Akopesa mitindo na ba-anjelu na Ye na tina na yo
mpo ete babatela Yo malamu.
11Mpe bakomema Yo na maboko na bango
mpo ete lokolo na Yo etutana na libanga te. »
12Yesu azongisaki : — Ekomama : « Okomeka te Yawe, Nzambe na yo. »
13Tango Satana asilisaki komeka Yesu na lolenge nyonso, akendeki mosika na Ye kino na mokolo oyo ekatama.
Copyright information for
LinMNB