‏ Luke 4:1-30

Komekama ya Yesu

(Mat 4.1-11; Mlk 1.12-13)

1Yesu atondisamaki na Molimo Mosantu, alongwaki na Yordani, mpe Molimo amemaki Ye kati na esobe 2epai wapi Satana amekaki Ye mikolo tuku minei. Na mikolo wana, alia eloko moko te ; mpe tango mikolo yango elekaki, ayokaki nzala.

3Satana alobaki na Ye : — Soki ya solo ozali penza Mwana na Nzambe, loba na libanga ete ebongwana lipa.

4Yesu azongiselaki ye : — Ekomama : « Moto akobika na lipa kaka te. »

5Satana amemaki Yesu na esika moko ya likolo makasi, alakisaki Ye mbala moko bokonzi nyonso ya mokili. 6Satana alobaki na Yesu : — Nakopesa yo bokonzi oyo nyonso mpe nkembo na yango, pamba te epesamela ngai, mpe nakoki kopesa yango na moto nyonso oyo nalingi. 7Soki kaka ogumbameli ngai, nyonso ekokoma ya yo.

8Yesu azongiselaki ye : — Ekomama : « Okogumbamelaka kaka Yawe, Nzambe na yo, mpe okosambelaka kaka Ye. »

9Bongo Satana amemaki Ye na Yelusalemi, atelemisaki Ye na songe ya Tempelo mpe alobaki na Ye : — Soki ozali penza Mwana na Nzambe, mibwaka na se ; 10pamba te ekomama :
« Akopesa mitindo na ba-anjelu na Ye na tina na yo
mpo ete babatela Yo malamu.
11Mpe bakomema Yo na maboko na bango
mpo ete lokolo na Yo etutana na libanga te. »

12Yesu azongisaki : — Ekomama : « Okomeka te Yawe, Nzambe na yo. »

13Tango Satana asilisaki komeka Yesu na lolenge nyonso, akendeki mosika na Ye kino na mokolo oyo ekatama.

Lotomo ya Yesu kati na Galile

Yesu abandi mosala na Ye

(Mat 4.12-17; Mlk 1.14-15)

14Yesu azongaki na Galile, atonda na nguya ya Molimo ; mpe basango na tina na Ye epanzanaki kati na etuka wana mobimba. 15Azalaki koteya kati na bandako na bango ya mayangani, mpe bato nyonso bazalaki kokumisa Ye.

(Mat 13.53-58; Mlk 6.1-6)

16Akendeki na Nazareti epai wapi akolaki ; mpe na mokolo ya Saba, akotaki na ndako ya mayangani, ndenge ezalaki momesano na ye. Atelemaki mpo na kotanga, 17mpe bapesaki Ye buku ya mosakoli Ezayi. Afungolaki yango mpe amonaki esika epai wapi bakoma : 18 « Molimo ya Nkolo azali likolo na Ngai,
pamba te apakoli Ngai mafuta
mpo na kosakola Sango Malamu epai ya babola ;
atindi Ngai kosakola bonsomi epai ya bakangami,
koyebisa bakufi miso ete bakomona lisusu,
kokangola bato oyo bazali konyokwama
19 mpe kosakola mobu ya ngolu ya Nkolo. »

20Bongo akangaki buku yango, azongisaki yango epai ya mosali ya ndako ya mayangani mpe avandaki. Miso ya bato nyonso kati na ndako ya mayangani ekomaki kotala Ye. 21Bongo akomaki koloba na bango : — Makomi oyo bowuti koyoka ekokisami lelo !

22Bato nyonso balobaki makambo ya malamu na tina na Ye mpe bakamwaki mingi maloba ya ngolu oyo ezalaki kobima na monoko na Ye ; bakomaki komituna : — Boni, Ye azali mwana ya Jozefi te ?

23Yesu alobaki na bango : — Nayebi malamu ete bokoloba na Ngai lisese oyo : « Monganga, mibikisa yo moko ! » Mpe bokoloba na Ngai : « Sala mpe awa, kati na engumba na Yo, makambo oyo toyokaki ete osalaki yango kati na Kapernawumi ! »

24Abakisaki : — Nazali koloba na bino penza ya solo : « Mosakoli moko te andimamaka kati na ekolo na ye. 25Nazali koloba na bino penza ya solo : ezalaki na basi ebele bakufisa mibali kati na Isalaele, na tango ya Eliya, tango likolo ekangamaki mibu misato mpe basanza motoba, mpe nzala makasi ezalaki kati na ekolo mobimba. 26Nzokande, Eliya atindamaki te epai ya moko kati na bango, kasi atindamaki kaka epai ya mwasi moko akufisa mobali mpe azalaki kovanda na mboka Sarepita, kati na ekolo Sidoni. 27Mpe na tango ya mosakoli Elize, bato na maba bazalaki ebele kati na Isalaele, kasi moko te kati na bango apetolamaki, longola kaka Namani, moto ya Siri. »

28Bato nyonso oyo bazalaki kati na ndako ya mayangani basilikaki makasi tango bayokaki bongo ; 29batelemaki, bakumbaki Yesu na libanda ya engumba, mpe bamemaki Ye kino na songe ya ngomba epai wapi batongaki engumba na bango, mpo ete babwaka Ye na se. 30Kasi Yesu alekaki na kati-kati na bango mpe akobaki mobembo na Ye.
Copyright information for LinMNB