Luke 4:1-6
Bameki Yesu
(Mt. 4.1-11 ; Mk. 1.12-13)
1Yesu atondaki na Molimo Mosantu, alongwaki na Yordani mpe Molimo amemaki ye na esobe. 2Kuna Zabolo amekaki ye mikolo ntuku minei. Azalaki kolia eloko moko te na kati ya mikolo wana ; bongo tango mikolo yango ekokaki, ayokaki nzala. 3Zabolo alobaki na ye : —Soki ozali Mwana ya Nzambe, loba na libanga oyo ekoma limpa ! 4Kasi Yesu azongisaki : —Ekomama : Moto akozala na bomoi kaka mpo na limpa te ! 5Bongo Zabolo amemaki ye na esika moko ya likolo penza 6mpe alakisaki ye na mbala moko babokonzi nyonso ya mokili ; mpe alobaki na ye : —Nakopesa yo bokonzi na yango nyonso mpe nkembo na yango, pamba te yango epesama na maboko na ngai, mpe nakoki kopesa yango na moto nyonso oyo ngai moko nalingi.
Copyright information for
LinMNB