‏ Luke 4:16-30

(Mat 13.53-58; Mlk 6.1-6)

16Akendeki na Nazareti epai wapi akolaki ; mpe na mokolo ya Saba, akotaki na ndako ya mayangani, ndenge ezalaki momesano na ye. Atelemaki mpo na kotanga, 17mpe bapesaki Ye buku ya mosakoli Ezayi. Afungolaki yango mpe amonaki esika epai wapi bakoma : 18 « Molimo ya Nkolo azali likolo na Ngai,
pamba te apakoli Ngai mafuta
mpo na kosakola Sango Malamu epai ya babola ;
atindi Ngai kosakola bonsomi epai ya bakangami,
koyebisa bakufi miso ete bakomona lisusu,
kokangola bato oyo bazali konyokwama
19 mpe kosakola mobu ya ngolu ya Nkolo. »

20Bongo akangaki buku yango, azongisaki yango epai ya mosali ya ndako ya mayangani mpe avandaki. Miso ya bato nyonso kati na ndako ya mayangani ekomaki kotala Ye. 21Bongo akomaki koloba na bango : — Makomi oyo bowuti koyoka ekokisami lelo !

22Bato nyonso balobaki makambo ya malamu na tina na Ye mpe bakamwaki mingi maloba ya ngolu oyo ezalaki kobima na monoko na Ye ; bakomaki komituna : — Boni, Ye azali mwana ya Jozefi te ?

23Yesu alobaki na bango : — Nayebi malamu ete bokoloba na Ngai lisese oyo : « Monganga, mibikisa yo moko ! » Mpe bokoloba na Ngai : « Sala mpe awa, kati na engumba na Yo, makambo oyo toyokaki ete osalaki yango kati na Kapernawumi ! »

24Abakisaki : — Nazali koloba na bino penza ya solo : « Mosakoli moko te andimamaka kati na ekolo na ye. 25Nazali koloba na bino penza ya solo : ezalaki na basi ebele bakufisa mibali kati na Isalaele, na tango ya Eliya, tango likolo ekangamaki mibu misato mpe basanza motoba, mpe nzala makasi ezalaki kati na ekolo mobimba. 26Nzokande, Eliya atindamaki te epai ya moko kati na bango, kasi atindamaki kaka epai ya mwasi moko akufisa mobali mpe azalaki kovanda na mboka Sarepita, kati na ekolo Sidoni. 27Mpe na tango ya mosakoli Elize, bato na maba bazalaki ebele kati na Isalaele, kasi moko te kati na bango apetolamaki, longola kaka Namani, moto ya Siri. »

28Bato nyonso oyo bazalaki kati na ndako ya mayangani basilikaki makasi tango bayokaki bongo ; 29batelemaki, bakumbaki Yesu na libanda ya engumba, mpe bamemaki Ye kino na songe ya ngomba epai wapi batongaki engumba na bango, mpo ete babwaka Ye na se. 30Kasi Yesu alekaki na kati-kati na bango mpe akobaki mobembo na Ye.
Copyright information for LinMNB