‏ Luke 4:42-44

(Mat 4.23; Mlk 1.35-39)

42Tango tongo etanaki, Yesu abimaki na ndako yango mpe akendeki na esika moko epai wapi azalaki kaka Ye moko. Ebele ya bato bazalaki koluka Ye ; mpe tango bakomaki na esika oyo azalaki, bamekaki kokangama na Ye mpe kopekisa Ye kotika bango.

43Kasi Yesu alobaki na bango : — Nasengeli mpe kosakola Sango Malamu ya Bokonzi ya Nzambe epai ya bingumba mosusu, pamba te ezali mpo na yango nde Nzambe atindaki Ngai.

44Mpe Yesu akobaki koteya kati na bandako ya mayangani ya Yuda.
Copyright information for LinMNB