‏ Luke 5:1-6

(Mt. 4.18-22 ; Mk. 1.16-20)

1Mokolo moko, Yesu azalaki pembeni ya laki ya Genezareti ; bongo bato mingi bayaki kotonda pembeni na ye mpo na koyoka Liloba ya Nzambe. 2Amonaki babwato mibale pembeni ya laki. Bato oyo balukaka bambisi bakitaki na babwato yango mpe bazalaki kosukola minyama na bango. 3Yesu amataki na bwato moko, oyo ezalaki ya Simon, mpe asengaki Simon apusa yango mwa moke na mayi. Bongo avandaki mpe azalaki koteya bato wuta na bwato.

4Tango asilisaki koloba, alobaki na Simon :

—Pusa bwato epai mayi ezali penza modindo, mpe bobwaka minyama na mayi mpo na kokanga mbisi.

5Simon azongisaki :

—Nkolo, tosali butu mobimba, mpe tozwi ata eloko moko te kasi lokola olobi yango, nakobwaka monyama !

6Tango babwakaki yango, bazwaki bambisi ebele, kutu minyama na bango ebandaki kopasuka.
Copyright information for LinMNB