Luke 5:27-32
27Sima na yango, Yesu abimaki mpe amonaki mofutisi mpako moko, kombo na ye Levi, avandaki na biro oyo azalaki kofutisela mpako. Yesu alobaki na ye : —Landa ngai ! 28Levi atelemaki, atikaki biloko na ye nyonso, mpe alandaki Yesu. 29Bongo Levi asalelaki Yesu feti moko ya kafu-kafu na ndako na ye. Bafutisi mpako mingi mpe bato mosusu bazalaki kolia elongo na bango. 30Kasi bafarizeo mpe balakisi ya Mibeko oyo bazalaki ya lisanga na bango bayima-yimaki na bayekoli ya Yesu : —Mpo na nini bozali kolia mpe komela elongo na bafutisi mpako mpe bato ya masumu ? 31Yesu azongiselaki bango : —Bato oyo bazali na nzoto malamu bazalaka na posa ya monganga te, kasi ezali bato ya maladi. 32Nayaki kobenga bato na sembo te, kasi nayaki kobenga bato ya masumu mpo babongola mitema !(Mt. 9.14-17 ; Mk. 2.18-22)
Copyright information for
LinMNB