Luke 5:33-38
33Bongo balobaki na Yesu : —Mpo na nini bayekoli ya Jean baboyaka mbala na mbala kolia mpo na mabondeli mpe bamipesaka na mabondeli, ndenge moko mpe baoyo ya bafarizeo, kasi oyo ya yo baliaka mpe bamelaka ? 34Yesu azongiselaki bango : —Boni, bokoki koboyisa bato oyo babengami na feti ya libala kolia, na tango mobali oyo abali azali na bango elongo ? 35Kasi tango ekoya, oyo moto oyo abali bakolongola ye na kati na bango, na tango wana nde bakoboya kolia mpo na kobondela. 36Bongo Yesu alobaki na bango lisapo oyo : —Moto moko te akoki kokamata kitendi ya elamba ya sika mpo abamba elamba ya kala. 37Moto moko te akoki kotia vino ya sika na basaki ya kala. Soki asali bongo, vino ya sika ekopasola basaki, mpe ekosopana, mpe basaki ekobeba. 38Kasi vino ya sika esengeli batia yango na basaki ▼▼ Bayuda bazalaki na momesano ya kolombela vino na basaki oyo esalama na poso ya nyama. Bazalaki kosalela yango mingi na poso ya ntaba.
ya sika.
Copyright information for
LinMNB