‏ Luke 6:1-5

Yesu, Mokonzi ya Saba

(Mat 12.1-8; Mlk 2.23-28)

1Mokolo moko ya Saba, wana Yesu azalaki kotambola kati na bilanga ya ble, bayekoli na Ye babandaki kobuka ble ; mpe, sima na bango kolongola yango baposo na maboko, baliaki bambuma na yango.

2Ndambo ya Bafarizeo batunaki : — Mpo na nini bozali kosala likambo oyo epekisami kosalema na mokolo ya Saba ?

3Yesu azongiselaki bango : — Botanga nanu te makambo oyo Davidi asalaki tango ye elongo na baninga na ye bazalaki na nzala ? 4Akotaki kati na Ndako ya Nzambe, akamataki mapa oyo ebulisama mpo na Nzambe, aliaki yango mpe apesaki yango epai ya baninga na ye. Nzokande, Banganga-Nzambe kaka nde bazalaki na ndingisa ya kolia yango.

5Yesu alobaki na bango lisusu : — Mwana na Moto azali Mokonzi ya mokolo ya Saba.
Copyright information for LinMNB