‏ Luke 6:12-16

Yesu aponi bantoma zomi na mibale

(Mat 10.1-4; Mlk 3.13-19; Mis 1.13)

12Kaka na mikolo wana, Yesu amataki likolo ya ngomba mpo na kosambela ; asalaki kuna butu mobimba, azali kosambela Nzambe. 13Na tongo, abengaki bayekoli na Ye pene na Ye mpe aponaki bato zomi na mibale kati na bango, ba-oyo akomaki kobenga « bantoma. » Ezalaki : 14Simona oyo Yesu apesaki kombo « Petelo ; » Andre, ndeko na ye ;
Jake,
Yoane,
Filipo,
Bartelemi ;
15Matayo,
Toma ;
Jake, mwana mobali ya Alife,
Simona oyo azalaki moko kati na lisanga ya Bazelote ;
16Yuda, mwana mobali ya Jake,
mpe Yuda Isikarioti oyo atekaki Yesu.
Copyright information for LinMNB